Jour J-0 lyrics
by Josey
Nabanzaki okozonga sima sanza misato
Natali na calendrier Jour j moins zéro
Mokolo yango ekoki eh nga nakomi kotala montre
Opesaki ngai ngonga nini okozonga te
Na masuwa to na avion na motuka to na engunduka eh
Yango nasi natandi etoko na monoko ya lopango na ngai
Na mitendi nakozela yo Bona
Ndoto nionso eyaka se na kwiti ya pongi
Ba projets na ba promesses topesanaki ngai na yo
Nzoka ezalaki bilanga matembele likolo ya mabanga
Y'otie na motema na nga volcan ya Nyiragongo na Goma
Ngai ko natutaka ntolo boye na lolendo nionso eh
Lelo nasambwe soni elongwaka na liniuka te oh
Chapitre nionso na bible ezalaka na verset
Ebele ebandaka na ndabo Bona eh
Bwato na masuwa nzela n'ango mayi
Kake ebomi moto ezangi ndoki ndoki te
Soki mbwa aswi moto bakangaka mokolo na ye
Yango ngai namoni bolingo ezali nde singa ya pendaison
Mopepe ya mbula oh ekombelaki nga lopango
Kasi eye kozongisela nga lisusu bosoto ya makasa
Liyanzi ezalaka maladie na nzoto ya moto
Kasi mokusa na yango ezalaka nde elengi elengi soki yo okwanzi eh
Bonaventure
Bonaventure Engobo
Ebongaki te mi amor
Okende mobembo otika ngai awa nazela
Likombe yo okangaki ata lopango te oh
Bongo moyibi soki akoti ayibi akei, okopesa nani faute
Ebongaki te mi amor
Okende mobembo otika ngai awa nazela
Likombe yo okangaki ata lopango te oh
Bongo moyibi soki akoti ayibi akei, okopesa nani faute
Répondre nga
Bolingo esengaka kaka assurance
Ata bampiaka ba souffrance ata oko supporter
Tokolata ekoti ya nzube na mitema eh
Souffrance ya bokabwani na ngoba ya Golgotha
Moto akondima akozala sauvé
Maman nabo kozanga zanga yo eh
Neti moweyi okoluka pema
Florian Mokolo na Tchatcho Mbala
Yé yé yee
Chela nabo kozanga zanga yo eh
Neti mokufi okoluka pema na ye
Mobembo ezali liwa te nakei motako te
Mokumba ya bolingo eleki ya maman na bébé
Bébé yeeeehhh maaaann
Karim Wemba eeehh maaann
Lydie Misenga eeehh maaann
Laurice la congolaise eeeehh maaaann
Ebongaki te mi amor
Okende mobembo otika ngai awa nazela
Likombe yo okangaki ata lopango te oh
Bongo moyibi soki akoti ayibi akei, okopesa nani faute
Tolingana sans condition
Namipesi maman banda lel'oyo kino liwa
Bakulutu baloba na mokili bala mwasi kasi elengi na ye te
Po un jour eloni eko kolona misisa ekobima bima
Kasi bolingo te, kasi bolingo te
Kasi bolingo te, kasi bolingo te
Déception eleki volcan ya Nyiragongo
Moto n'ango ebomaka ba larve etuaka
Koleka kutu flamme na puit ya pétrole
Nyiragongo esika bolingo ebandaki na motema ah ah ah
Ah ah ah
Nabo kozanga zanga yo eh
Eeeeehh yé yé yé yé éh
Nabo kozanga zanga yo eh
Eeeeehhh eeeehh éh maann
Chéri nabo kozanga zanga yo eh
Neti mokufi okoluka pema na ye
Mobembo ezali liwa te nakei motako te
Motuka ya bolingo eleki ya maman na bébé
Wivine Moleka l’impératrice eh
Papa Mundabi na Grand Hôtel
Mère Marie, Mère ya ba moyen
Général Dabira oh ma
Karim Kitete, Tabu Fatou
Mimi na Colombo, Malou Bomboka
Nabo kozanga zanga yo eh
Tony Rodriguez
Josey