Liloba na bomoyi lyrics
by Adorons L’Éternel (Gael Music)
Nga motema etondi loyembo ya lokumu ya Masiya
Ye bolingo na nga muklisto molingami
Ya nga nionso na Masiya
Ye makasi na nga pona tango inso
Nga na poni kolanda oyazali nzela ya lobiko
Oyo angegisaka bomoyi na baye bandimi
Bonzambe na Ye oh Masiya
Yesu esengo elendisa kondima na nga
Nionso ekelami na Ye oh
Nionso esimbami na Ye oh Liloba na Nzambe
Yesu akomisi nga moto na nkembo
Alati motema na nga
Bomoyi na nga ekomi bomoyi ya Nzambe
Nionso ekelami na Ye oh
Nionso esimbami na Ye oh Liloba na Nzambe
Yesu akomisi nga moto na nkembo
Alati motema na nga
Bomoyi na nga ekomi bomoyi ya Nzambe
Nga nasimbami nde na oyo azali libanda ya talo
Ye akweyaka te aninganaka te azali
Likonzi ya bomoyi na nga
Yesu nde mobateli oyo aleki nionso
Nani apesaka elikia na baye balembi bomoyi
Nani kati na pasi a yaka na lobiko
Bobele mwana na Nzambe
Abongi na nkembo mpe na lokumu nionso
Nionso ekelami na Ye oh
Nionso esimbami na Ye oh Liloba na Nzambe
Yesu akomisi nga moto na nkembo
Alati motema na nga
Bomoyi na nga ekomi bomoyi ya Nzambe
Nionso ekelami na Ye oh
Nionso esimbami na Ye oh Liloba na Nzambe
Yesu akomisi nga moto na nkembo
Alati motema na nga
Bomoyi na nga ekomi bomoyi ya Nzambe
Nionso ekelami na Ye oh
Nionso esimbami na Ye oh Liloba na Nzambe
Yesu akomisi nga moto na nkembo
Alati motema na nga
Bomoyi na nga ekomi bomoyi ya Nzambe
Yesu eh, Yo elonga na ngai (Yesu, Yo elonga na ngai)
Yesu eh, Yo bomoyi na ngai (Yesu, Yo bomoyi na ngai)
Yesu eh, Yo esengo na ngai (Yesu, Yo esengo na ngai)
Nani azongisela nga biyano na mituna na nga?
Nani akosimbela makambo eleki mayele na nga?
Nani akobundela bitumba eleki makasi na nga?
Bobele Masiya oh bobele Yo
Nani akolobela etike nazangi baboti?
Nani akosalisa nga mobola na pasi nani yango?
Nani akokatela likambo satana atelemi solo?
Bobele Masiya oh bobele Yo
Y'ozali tina ya bozali na nga awa ose
Y'ozali sango oyo motema na nga elingaka koyoka
Ozali bendele ya lokumu ekopepa tango inso
Kati na motema na ngai, mongumameli na Yo
Ozali Nzambe oh
Yesu eh, Yo elonga na ngai (Yesu, Yo elonga na ngai)
Nionso ya motuya na ngai (Nionso ya motuya na ngai)
Yesu eh, Yo bozuwi na ngai (Yesu eh, Yo bozuwi na ngai)
Yesu eh, Yo bolingo na ngai (Yesu eh, Yo bolingo na ngai)
Oza lisekwa ya basantu na Nzambe
Oh, oza Mokonzi osimba mboka Congo
Ozali Nzambe
Mokokisi ya bilaka na Nzambe
Lipa ya bomoyi oyo motema na ngai emesana kolia
Ozali bendele ya lokumu ekopepa tango inso
Kati na motema na ngai, mongumameli na Yo
Ozali Nzambe oh
Yesu eh, Yo elonga na ngai (Yesu, Yo elonga na ngai)
Yesu eh, Yo elikya na ngai (Yesu, Yo elikya na ngai)
Nionso ya motuya na ngai (Nionso ya motuya na ngai)
Yesu eh, Yo bosombi na ngai (Yesu eh, Yo bosombi na ngai)
Oza lisekwa ya basantu na Nzambe
Oh, oza Mokonzi osimba mboka Congo
Ozali Nzambe